Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 11:8 - Mokanda na Bomoi

8 Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 11:8
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »


Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.


Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.


Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »


Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.


Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.


Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.


Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.


Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, apanzi bato oyo batonda na lolendo,


Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ