Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 11:7
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »


Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.


Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.


Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.


Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga.


Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »


Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango.


akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, alongolaka mikolo bososoli ;


Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.


Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.


Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »


Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?


Okomona lisusu bato ya lolendo te, bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola.


Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba : — Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ? Nazongisaki : — Ngai oyo, tinda ngai !


Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo : ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.


Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba nkota oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bazali bandimi te bakoti kuna, boni, bakoloba te ete bozali na liboma ?


Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ