Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 11:31 - Mokanda na Bomoi

31 Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 11:31
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)


Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.


Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani.


Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.


Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.


Alobaki na ye lisusu : — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.


Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.


Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.


Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.


Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani.


Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango ?


Ezali Yo, Yawe Nzambe, nde oponaki Abrami mpe obimisaki ye longwa na Uri, mokili ya Chalide, mpe opesaki ye kombo Abrayami.


Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango ?


Mpo na kondima, Abrayami atosaki Nzambe oyo abengaki ye mpe atindaki ye kokende na mokili oyo asengelaki kozwa na sima lokola libula. Atosaki mpe akendeki atako ayebaki te epai azalaki kokende.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ