Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.
Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo ; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili.
Sik’oyo, nakoloba na bino makambo oyo nakosala na elanga na ngai ya vino : Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ; nakotobola madusu kati na bamir na yango, mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango.
kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.