Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani.
Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
Jozue alobaki na bato nyonso : — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu.