16 Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »
Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
Eberi abotaki bana mibali mibale ; moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi » oyo elingi koloba : Kokabola ; pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele. Kombo ya mwana mosusu ezalaki « Yokitani. »
Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »
Naori, mwana mobali ya Serugi ; Serugi, mwana mobali ya Rewu ; Rewu, mwana mobali ya Pelegi ; Pelegi, mwana mobali ya Eberi ; Eberi, mwana mobali ya Shela ;