10 Tala libota ya Semi : Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.