Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 10:9 - Mokanda na Bomoi

9 Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 10:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.


Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.


Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.


Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba ; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako.


Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.


Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.


Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.


Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe :


Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.


Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene ! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.


Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.


mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basi oyo balataka basinga ya maji na maboko na bango mpe batongaka bitambala mpo na mito ya bato ya ndenge na ndenge mpo na kotiela bomoi na bango mitambo ! Bokanisi ete bokotiela bomoi ya bato na Ngai mitambo mpo ete botikala bino moko kaka na bomoi ?


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ