Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.
Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso ; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi.
basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani ; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;
basalaki vwale mpe bendele na yo na elamba ya lino ya kitoko oyo ewutaki na Ejipito, mpe batongaki bililingi kati na yango ; bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane, ewutaki na bisanga ya Elisha.