32 Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.
Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.