Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 10:25 - Mokanda na Bomoi

25 Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 10:25
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.


Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,


Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.


Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.


Eberi abotaki bana mibali mibale ; moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi » oyo elingi koloba : Kokabola ; pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele. Kombo ya mwana mosusu ezalaki « Yokitani. »


Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ