Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi ; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango.
Abiya atelemaki na likolo ya ngomba Tsemarayimi oyo ezali kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe alobaki : « Jeroboami mpe Isalaele, boyoka ngai malamu !