Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 10:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 10:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti.


mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.


Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni.


Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki : « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. »


Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni.


Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, pamba te ebale monene elobi : « Natikala koyoka pasi ya kobota te, natikala na ngai mpe kobota te, natikala na ngai kobokola bana mibali to kokolisa bana basi te. »


Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.


Baluki nkayi na yo bazalaki bato ya Sidoni mpe ya Arivadi. Oh Tiri, bato na yo, oyo bazalaki na bwanya koleka, nde bazalaki kotambolisa yo.


« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango !


bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.


Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi : — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo ? Abishayi azongisaki : — Ngai, nakokende elongo na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ