Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 10:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 10:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »


Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.


Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.


Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,


Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ?


Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki mpe abikaki.


« Tuna Yawe sik’oyo mpo na biso, pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azali kobundisa biso ; tango mosusu Yawe akosala bikamwa mpo na biso ndenge asalaki na tango ya kala, mpo ete Nabukodonozori atika biso. »


Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango :


Bobundisa mokili ya Meratayimi mpe bavandi ya Pekodi ; bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, › elobi Yawe. ‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.


Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo ;


Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye.


Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna ! Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene, mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia ! Boni, bingumba oyo eleki penza bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu ? Mpe etando na yango eleki ya bino na monene ?


Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni ; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.


Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.


Azongisaki : — Bazali komema yango na mokili ya Babiloni mpo ete batongela yango ndako, na Shineari. Soki ndako yango esili kotongama, bakotia sani yango kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ