Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:9
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.


Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.


akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.


Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,


Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.


Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.


Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango ; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye.


Mayi nyonso ekendaka na ebale monene, kasi ebale monene etondaka te ; mpe mayi yango ezongaka lisusu epai ewutaka.


Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.


Yona azongisaki : — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.


Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki ; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.


mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango : « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ