7 Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo.
mpe mpo na kongengisa mokili ! » Yango esalemaki mpe bongo.
Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo.
Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo.
akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te ;
Obimisaka mayi ya bitima mpo na kosopa yango na mayi minene oyo elekaka na kati-kati ya bangomba ;
Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo !
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.
Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.
Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »