Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:6
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,


Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! »


Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.


Atondisaka mapata na mayi, mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.


Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto ?


omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.


bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo !


Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi !


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.


Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.


Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.


Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.


Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna ;


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.


Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :


Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki ; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ