Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:31 - Mokanda na Bomoi

31 Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:31
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya misato.


Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya minei.


Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano.


Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.


Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.


Na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala oyo asalaki. Boye, na mokolo ya sambo, akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala.


Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala.


tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?


Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.


Opesaka bilei, mpe ezwaka yango ; ofungolelaka yango loboko na Yo, mpe etondaka na biloko.


Tika ete nkembo ya Yawe ewumela libela na libela ! Tika ete Yawe asepela na misala na Ye !


Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ; teya ngai mitindo na Yo !


Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango.


Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili ; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. »


Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.


Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.


Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato ?


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,


pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ