Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo,


Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato mpe atondisaka mozindo ya ebale monene.


Wapi nzela oyo ememaka na pole ? Bongo molili ezalaka wapi


omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.


Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.


Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.


Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.


Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.


Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.


Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.


Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.


Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ;


Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.


Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.


Sima na Yesu koloba bongo, agangaki : — Lazare, bima !


Tala ndenge nini etumbu yango ezali : pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.


Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ