29 Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »
Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te ; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.