Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:28 - Mokanda na Bomoi

28 Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:28
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »


Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »


Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.


Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »


Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »


Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki : — Banani wana bazali elongo na yo ? Jakobi azongisaki : — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.


Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; na mapamboli ya bozindo, na se ; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.


Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »


Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi,


Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »


Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.


Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »


mwana ya motoba, Amieli ; mwana ya sambo, Isakari ; mwana ya mwambe, Pewulitayi ; pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi.


Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.


Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene ? Okotikela yango mosala na yo ?


Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.


Apamboli bango, mpe bakomi ebele ; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.


Likolo ezali likolo ya Yawe ; kasi apesa mabele epai ya bato.


Pamba te Yawe ayokaka bato oyo bakelela, mpe atiolaka bato na Ye te ata bazali bakangami kati na boloko.


Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;


otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo, otia nyonso na se ya matambe na ye :


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi ; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.


Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.


Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te ; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ