Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:26 - Mokanda na Bomoi

26 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:26
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »


Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango.


Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »


Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.


Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.


Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,


Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene ? Okotikela yango mosala na yo ?


pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga, mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.


Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.


Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye ! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango !


Tala makambo oyo nasosoli : Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »


Tokolukela yo biloko ya matoyi ya wolo oyo batia bambuma ya mike-mike ya palata.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi ; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.


Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba : — Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ? Nazongisaki : — Ngai oyo, tinda ngai !


Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.


Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye.


Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.


Kasi Yesu alobaki na bango : « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »


Pamba te ozali koloba na biso makambo ya sika. Yango wana, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini.


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.


mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.


Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,


mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.


Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza.


Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ