Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:22 - Mokanda na Bomoi

22 Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:22
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.


Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano.


Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »


Kasi Labani alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te ; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.


Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko ?


Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.


Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »


Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.


Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo, kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.


Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.


Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !


Apamboli bango, mpe bakomi ebele ; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.


Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.


Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.


Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ