Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:21 - Mokanda na Bomoi

21 Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:21
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

engenga na moyi mpe na butu, mpe ekabola pole na molili. Nzambe amonaki ete ezali malamu.


Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! »


Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »


Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.


Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.


Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango.


Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.


Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.


Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »


Banyama nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na mokili, ebimaki na masuwa na molongo kolanda lolenge na yango.


Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino.


Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »


Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ; tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo ;


Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.


Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli ?


Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,


Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.


Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.


« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye : ‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo, ozali lokola dalagona kati na bibale minene, otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo, opanzaka mayi na makolo na yo mpe okomisaka bibale potopoto.


Kasi ngai, na koyembaka nzembo ya matondi, nalingi kobanda kobonzelaka Yo bambeka mpe kokokisaka bilaka oyo nazali kopesa, pamba te lobiko ezali ya Yawe. »


Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ