Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,
Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » Yango esalemaki mpe bongo.
Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso.
Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza ; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te ; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.
Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te.