Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »


Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,


tango nakomisaki mapata elamba na yango, mpe molili, singa ya kokangela yango,


tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi ; mpe okomisaka mokili sika.


Ozipa yango na mayi monene lokola elamba ; mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.


Atandaki mabele na likolo ya mayi ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,


Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.


Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,


Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela Yelusalemi, akobatela mpe akokangola, akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. »


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi ; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.


Tango natalaki mabele, namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo mpe ezalaki ata na eloko moko te ; tango natalaki likolo, namonaki ete pole ezalaki lisusu te.


Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Azali lokola mpongo oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ