Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 1:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole : oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi ; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 1:16
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe mpo na kongengisa mokili ! » Yango esalemaki mpe bongo.


soki natalaki moyi na kongenga na yango to sanza kotambola na nkembo,


tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?


bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka ;


Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.


Moyi yango ebimaka na tongo ndenge elenge mobali oyo abali sika abimaka na shambre na ye, mpe ndenge elombe atambolaka na elikya ya kolonga na momekano.


Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.


Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.


Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.


Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.


Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.


Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.


Tala makambo oyo Yawe alobi, Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo, apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu, aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele, mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga :


Tango makonga ya mike etambolaka lokola mikalikali mpe makonga ebetaka lokola bakake, moyi mpe sanza etelemaka kuna na likolo.


Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango ; kutu monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na kongenga.


Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ