Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.
ata nzete moko te ya elanga ezalaki, mpe ata molona moko te ya elanga etikalaki kobimisa moto, pamba te Yawe Nzambe anokisaki nanu mvula te na mokili, mpe moto azalaki te mpo na kolona yango na mabele.
Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.
Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi : ezalaka na somo ya moyi makasi te ; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive ? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi ? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu ?