Deteronomi 9:9 - Mokanda na Bomoi9 Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.