Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo : « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te ! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 9:4
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.


Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki.


Nalingi bososola ete nazali kosala makambo oyo mpo na bino te, elobi Nkolo Yawe ! Oh libota ya Isalaele, boyoka mawa mpe soni mpo na etamboli na bino !


Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino.


Olobi malamu ! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.


Nzokande, lokola koponama yango esalemaki na ngolu, elakisi ete ezali likambo ya misala te ; soki te, ngolu ezali lisusu ngolu te.


Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te ; nzokande, yango te nde ezali kolongisa ngai. Oyo asambisaka ngai, ezali nde Nkolo.


Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?


Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango : bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango.


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! »


Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.


Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.


Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.


pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ