Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 9:24 - Mokanda na Bomoi

24 Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 9:24
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.


Aron azongisaki : — Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.


Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.


Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, pamba te etombokelaki Ngai, › » elobi Yawe.


Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.


Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, amonaka minyoko te kati na Isalaele. Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ; koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.


Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele.


Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu !


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo : « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te ! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ