Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 9:21
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.


Abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe mpe akomisaki yango putulu. Akweyisaki lisusu bitumbelo malasi nyonso kati na mokili mobimba ya Isalaele. Bongo, azongaki na Yelusalemi.


Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.


Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! »


Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu.


Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.


Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »


Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye ; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ