Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 9:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto ; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 9:15
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.


Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.


Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.


Tango boyokaki mongongo kobima kati na molili, wana ngomba ezalaki kopela moto, bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bampaka na bino bayaki epai na ngai.


Tango natalaki, namonaki ete bosalaki solo masumu epai na Yawe, Nzambe na bino : bomisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende banyangwisa na moto ; bopengwaki noki na nzela oyo Yawe atindaki bino.


Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ