Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpe Yawe alobaki na ngai : « Natali malamu bato oyo ; bazali penza libota ya batomboki !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 9:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga.


Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. »


Kasi bayokaki te ; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango.


Bino bato na ngai, boyoka ; nazali koloba na bino ! Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo : « Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »


Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »


Boni, bokomisi Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai ekimelo ya miyibi ? Ngai nazali komona ete bozali kozwa yango bongo, elobi Yawe.


Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi : Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te ;


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ