Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 9:10 - Mokanda na Bomoi

10 Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 9:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.


Kasi soki ezali na nguya ya Molimo ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.


Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.


Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.


Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso : mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani ; mpe Yawe apesaki ngai yango.


Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki : « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. »


Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo : ‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ