Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 8:8 - Mokanda na Bomoi

8 mokili oyo etonda na ble, na orje, na vino, na banzete ya figi, na banzete ya grenade ; mokili ya mafuta ya olive mpe ya nzoyi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 8:8
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akokanga ane na ye na nzete ya vino, mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona ; akosukola bilamba na ye na vino ; mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane.


Bakotaki kati na ndako lokola nde bakei kozwa ble, wana Ishi-Bosheti azalaki ya kolala na mbeto na ye kati na shambre, batubaki ye mbeli na libumu, babomaki ye mpe bakataki ye moto ; bongo bazwaki moto yango, bakimaki mpe batambolaki na yango butu mobimba na nzela oyo ekenda na etando ya Araba. Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bakimaki.


Azalaki na bwanya koleka bato nyonso ; koleka ata Etani, moto ya Ezera ; Emani, Kalikoli mpe Darida, bana mibali ya Maoli. Boye, sango na ye epanzanaki kati na bikolo nyonso ya zingazinga.


liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika, mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoyi. Boye, bokozala na bomoi, bokokufa te ! Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. ›


Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.


Mpe bato oyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na Ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela mpo na libela.


Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube.


Namemaki bino na mokili oyo mabele na yango ebotaka malamu mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko ; kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.


Nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo ; mpe na bongo, okoyeba Yawe malamu.


Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te.


Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.


Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.


Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.


Basangisaki biteni yango ; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale.


— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?


Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,


miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.


Oh Isalaele, yoka malamu ! Senzela ete otosa yango mpo ete ozala malamu mpe bokoma ebele na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge Yawe Nzambe ya bakoko na bino alakaki bino.


Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ;


mokili oyo bokozanga lipa te mpe eloko moko te ; mokili oyo mabanga ezali bibende mpe bokoki kobimisa motako na bangomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ