Deteronomi 8:17 - Mokanda na Bomoi17 Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.