16 Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.
Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.
Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.
Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango.
Yawe alobaki na Moyize : — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai.
Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te.
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.