Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 8:15 - Mokanda na Bomoi

15 oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 8:15
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki, etiolaki lokola ebale kati na esobe.


oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.


Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.


Tala, nazali kosala likambo ya sika ! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.


Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›


Ngai, nayebaki yo kati na esobe, kati na mabele oyo ekawuka.


Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.


Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki.


mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko ; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango ; mpe libanga yango ezalaki Klisto.


Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.


Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ