Deteronomi 8:14 - Mokanda na Bomoi14 sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.