Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 7:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 7:5
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango.


Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango, mpe Davidi apesaki mitindo ete batumba yango na moto.


Apesaki mitindo na bato ya Yuda ete baluka Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe batosa mibeko mpe malako na Ye.


Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.


Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.


bakotalela lisusu bitumbelo te oyo ezali misala ya maboko na bango, mpe miso na bango ekotala lisusu te misala ya misapi na bango : makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.


Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.


bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba.


Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo.


Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana.


Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.


Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ