Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 7:23 - Mokanda na Bomoi

23 Kasi Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, akotia bango noki na mobulu monene kino bakobebisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 7:23
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.


Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.


Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako.


Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.


Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino.


Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka ; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo ; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo.


Bakozwa etumbu ya libebi ya seko na seko, mosika ya bozalisami ya Nkolo mpe ya nguya ya nkembo na Ye


Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.


Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ