22 Yawe, Nzambe na yo, akobengana moke-moke bikolo oyo ezali liboso na yo ; okokoka te kosilisa bango na mbala moko, noki te banyama mabe ekokoma ebele zingazinga na yo.
Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.