Deteronomi 7:21 - Mokanda na Bomoi21 Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.
Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu.