Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 7:18 - Mokanda na Bomoi

18 Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 7:18
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki mpe bitumbu oyo apesaki,


Mpe namilobelaka : « Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi : loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ebongwani ! »


Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.


babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.


mpo na libota ya Benjame : Paliti, mwana mobali ya Rafu ;


Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »


Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili ; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko.


Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te,


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.


Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.


Boye, tobukaki yango nyonso ndenge tosalaki epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni. Tango tobukaki bingumba na ye, tobomaki mibali, basi mpe bana na ye.


Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.


Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye.


Jedeon azongisaki : — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso ? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito ? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ