Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 7:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango mosusu okomilobela : « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 7:17
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozalaki komilobela kati na motema : ‹ Nakomata kino na Lola, nakotombola kiti na ngai ya bokonzi kino na likolo ya minzoto ya Nzambe mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, na suka ya mokili ya ngambo ya nor ;


Yoka sik’oyo, yo mwasi ya biyenga, oyo omesana kovanda na kimia mpe omilobelaka : « Ngai nde nazali, mosusu azali te. Nakotikala kokoma te mwasi akufisa mobali mpe nakotikala kokufisa bana te ! »


Boye, okomilobela na motema : « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango ? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi ? »


Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.


Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.


Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »


Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango.


Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye,


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.


Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? ›


Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! »


Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ