Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 7:16
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babebisaki te bikolo oyo Yawe ayebisaki bango,


Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko oyo ekomaki motambo mpo na bango.


Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda.


Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »


banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu),


koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te.


Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu.


Boyokela moto ya ndenge wana mawa te ! Mobeko ezali : bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.


bokokata loboko na ye. Bokoyokela ye mawa te.


mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.


Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.


Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize.


Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,


Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »


babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.


Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ