Deteronomi 7:12 - Mokanda na Bomoi12 Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.
Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »