Deteronomi 7:1 - Mokanda na Bomoi1 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi— အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,
Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.