Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.
Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.
alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.